Are you an artist? Make the most of your lyrics with Musixmatch Pro!
Translations (1)
Share
Verified by Curator
9 contributions
about 2 months ago
Translations
French

Lyrics of Nofra Ketsh by Fally Ipupa

intro

Merçi Ya MJ po obota Nana Ketchup eh
Alain Mbenza ciseaux d'or
Mbemba Aigle, Denis de Ba Mbongo
Louise Luka, Kapi Biatana Addi eh
Bijoux Kihika, yo ndé vraiment elongi ya ba fêtes quoi
Romino Makasi, Mijosé la reine de Canfufu
Dashi Tshibasu

verse

Nana aah lelo na sosoli iiih, Nana na nga lelo na sosoli iiih
Que bolingo le veritable ebombana na mitema ya ba fille ya timides
Oyo basalaka semblant lokola ba lingaka té oh
(Balingaka té, eh)
Yo oyaki na vie na ngayi
Na maloba ya ba santu
Na komaki ko kanisa kutu yo nde porte-parole ya Nzambe
Nga na motema natielaki yo ba anti-vols
Po ata après un siècle mobimba moyibi ya bolingo a kota té
Nzoka yo fraudaki na sentiment pe na vie na nga
Na makanisi que na terminus ya bolingo ofuta nga droit ya bolingo té
Et pourtant esi osalaki mosala mungwa esalaka na bileyié
Moninga apesaki yo bolingo o multiplier par nombre nyonso olingi
Y'okomisi nga lokola parfum de grande marque
Oyo yambo mosombi avant asomba il faut ameka ata ndambo
Sima nayo soki zomi bakosala lolenge yo osali nga
Tango okozonga okokuta nga ya ndambo (Esengo ekozala te o mitema Nana ah)
Yango lelo nga na bondeli yo ozonga (Y'ozonga)
Yango lelo nga na bondeli yo ozongela nga aah (Y'ozonga)

verse

Oyo ozo sala nga aah oko bomisa na ba innocents
Mayi ya miso nasaleli matanga nayo lelo ooh
Dans dix ans eko inonder le monde entier
(Ooh Nana aaah)
Yango nasengi ONU aya intervention
Po na boyi na provoquer fin du monde oyo nzambe a prevoyaki té
Elikia ya suka nazo zela se motema na nga
Tango ekokoma debordé na bolingo nayo (Débordé eeh mama)
Tango nako koma nanga naufragé
Peut être okoyoka ng'ata mwa mawa aah
Na belela ya suka Nana
Moweyi azalaka na monguna té Nana
Liwa ya bato mosusu soki tozo lela na mawa na mitema
Yo olakisi nga yanga moko po nazala lolenge kani?
Bolingo oyo ebandaki n'esengo lokola mwana
Azongi kelasi na elamba ya sika
Lelo y'obongoli'ango mawa
Nakoma koyina ti nzambe mokeli nanga aaah
Soki likolo eyindi nazo banga mvula enoka, ebungisa matambé nayo
Eloko na tikala nango seul souvenir
(Mais kanisa tango ozalaki ko linga nga)
Oh maman
Demarche ralenti lokola ba soulard avant indépendance (Avant indépendance)
Lelo distance otiki nga lokola course ya fusée na velo
Na yebi nako mona yo lisusu té oh Nana aaah
Zonga opesa nga ata baiser ya suka, etikala soulagement
Yo moto oyaki kozwa nga na aeroport ya l'amour na cortège (Carole Wana)
Nzoka mituka oyaki nango pona honneur na nga (Ah lipasa Sandra Sox eh)
Ezalaki déception, malheur, misère na ba soucis
Nayebelaki yo motema makasi boyé té Nana aah
Kende Nzambe a reviser yo
Yo'katani mosisa oyo eyokaka bato mawa aah
Yo'katani mosisa ya souci ya baninga aah
Nana kombo nayo si ekoma kisi ya bolingo nanga
Soki nazo bela natangi kombo nayo maladie esilaka
Parfum nayo lokola likayabu oyo bazali ko tumba
Mopepe ata ememi solo ata 10Km nayokaka eeh
Yo'lingaki no'nga té eeh po l'amour esalaka mabé té
Moto osekwisaki akufi lisusu akomi nde kopola oyoki nayo
Mawa té Nana Ketchup
Lelo nga na ndimi ye l'amour est aveugle
Po ezuwa toli te na mbeli ya déception ezuwa
Yak'olongola nga kindoki ya mukol'oleyisa ngayi ekomisa nga kizengi
Nasi nakomi na suka aah, yak'o libérer no'nga ah
Nakowa pona yo mama
Na ko koka pé kobosana yo té Nana aah
Na ko koka pé kobosana yo té Nana aah
Reviens vite mon amour, tu es vraiment unique à ton genre
(Tu es vraiment unique à ton genre eh)
(Tu es vraiment unique à ton genre eh)
(Tu es vraiment unique à ton genre eh)
Maman Marcosis eeh
Ah camarade ya Nadine Bango ooh
Jerry Coiffure, Francine Mbombo
Silvie Boga, ya Jean-Luc Mukoko ooh
Chiro Tshamala aah, Nanu Nzau
Nicole Matshuda, Mariame la grande dame de la ville (Alice Muati)
Regine Ndjoluka, Belinda Makoma aah
Roger Ngade eeh, Judith Mikalukidi
Cynthia Lokondo ooh, Delphine Lumbila
Guylaine Kapaya, Renate Kapaya (Mama)
Tu es vraiment unique à ton genre eh
Dekos Mukoko yo na Camionette Mbola, bo bondela Nana
Writer(s): Fally Ipupa

Contribute

To-do

Performers Tag
Identify who's singing what

Completed

Lyrics
Verified by Curator
Structure Tag
Identify the song's sections

Contributions

Last edit about 2 months ago
Are you an artist? Distribute your lyrics!
Take full control of your lyrics. Curate, sync, and distribute your lyrics on Spotify, Apple Music, and more.
Explore Musixmatch Pro