Are you an artist? Make the most of your lyrics with Musixmatch Pro!
Add translation
Share
Verified by Curator
14 contributions
about 2 months ago
Translations
French

Lyrics of Airways by Koffi Olomide

intro

Elengi eh
Tabu Fatou, Annie Dembo
Beya Bosoyi
Bruxelles sucre-sucre
(Ah)

verse

Il parait que kuna na paradis

pre-chorus

Tango ba komaki kuna na bayé, ba zua konzo'a ko koma kuna aaah

verse

Mingi ba komaki na ba idées, ba beta demi-tour sur la terre
Ba kuta ba fleurs, ba ndeke, ba jardins, b'anjelu kasi ata sosie té eeh

verse

Ya Tabu Fatou, muana ya suka ya famille ya ba fleurs rosa nioso tout

verse

Nga na zalaki na nga bougie ya ligablo ooh

chorus

Bougie oyo eko ngengisaka wenzé tango moké, avant qu'ekufa n'ango ooh

verse

Kasi Bosoyi banda aya n'e kozua nga, a kenda n'e na ngayi eeh

chorus

Na koma na ngayi ko ngengisa ndako na yé, banda butu ti tongo oooh

verse

Kasi naza na nga ko sila té, naza na nga ko kufa pe té
Maboko na yé eza pouvoir na nga oooh, Béa Bosoyi
Na lukaki na ba defilés de mode

chorus

Na komaki membre ya jury ya election ya miss monde

verse

Na lukaki na livres ya joaillerie na ba catalogues ya ba diamantaires

verse

Na mona ba rubis, ba courones, ba diamants, ba chef-d'oeuvres oyo ya musée eeeh

verse

Kasi ata moko té eza ko kokana, na beauté ya Annie Dembo muana aaah mawa eeeh

verse

Na komaki na nga adepte ya biblia

chorus

Na komaki'o zanga confiance na bato'a mokili, amour na nga sé Jésus

verse

Kasi yo Tabu banda oya n'o n'amour n'o changea nde ngayi eh

chorus

Na koma Abraham yé Sarah, nzoto na molimo a tondisa graçia aaah

verse

Yé nde amour ya vie na ngayi, yé nde toute ma vie d'amour Tabu

verse

Est-ce que nako koka mpé

chorus

Ko zu'ata pongi soki alali pene na nga ah
Ko tanela tongo vivant, après première nuit na yé d'amour
Qui sait eeeh?
Qui vivra verra aaah

verse

Eh, hier encore na zalaki na idée eeh

chorus

Amour idéal, il faut o luka na biblia
Bolingo ya solo, il faut o luka na ba encyclopédies

chorus

Après ko zala fleuron ya ba mines ya roi Salomon
Bien-aimée zala terminus ya vie na nga, à don juan
Qui sait eeeh?
Qui vivra verra aaah

verse

Est-ce que nako koka mpé

chorus

Ko zu'ata pongi soki alali pene na nga ah
Ko tanela tongo vivant, après première nuit na yé d'amour
Qui sait eeeh?
Qui vivra verra aaah

verse

Eh, hier encore na zalaki na idée eeh

chorus

Amour idéal, il faut o luka na biblia
Bolingo ya solo, il faut o luka na ba encyclopédies

chorus

Secret ya bien-aimée, maman a bota yé na île de Fidji
Pembeni ya océan epayi arc-en-ciel eyaka ko pema, la nuit iiih
Qui vivra verra aaah

bridge

Aaah, koyeba mosala eh, esalaka elengi moko boyé (Ah)

verse

Aaah-mour
Tabu na pesi epa n'o ooh, c'est vrai
Eleki ya papa na Roma mpo na biblia
Eleki oyo ya Dalaï Lama mpo na Bouddah
Eleki ya ba musulmans mpo na Coran eeh
Eleki oyo ya ba yuda mpo na Israël
Eleki ya ba kintuadi mpo na Kimbangu
Tabu Fatou uuh

verse

Aaah-mour
Bosoyi na pesi epa n'o ooh, c'est vrai
Eleki ya ba nouveaux-nés po na miliki eeh
Eleki ya bana mikié mpo na Nintendo oooh
Eleki oyo ya bana mpoto po na Disneyland
Eleki ya basi ya libre po na mbongo oooh
Eleki oyo ya ba minzoto, mpona butu uuh

chorus

Rosie eeeeh, aaanh
Yeh eeeh, aaah-mour

verse

Dembo awa nga naza, makila nanga eeh
Annie eza ndengé e'moko n'aquarium
Mbisi na kati sé moko, n'kombo Annie eh
Dembo awa nga naza, m'pema na nga eh
Annie eza ndenge e'moko na le ciel
Avion n'onté, na nga moko Annie Airways

chorus

Mema n'o nga aah loin eeeh
Kumba n'o nga aaah

verse

Annie Dembo ooh
Eh ima ah ima-a-ima-ima a banduku eeh
Paradis y'okutana na yango ooh sur la terre
Moyi e bimela ah yo ooh o na butu
Coucher du soleil e koma propriété na yo ooh

chorus

C'est ça aaah Rosie aaah
Eh muan'ango aza comme ça aaah

verse

Ima-yeh-ima yeh ima Béa Bosoyi eeh
Elanga ya rosa, e bota yo na motema eh
Bongo malasi na yango, e mata yo na cerveau
Na ndako na yo, ba pièces nioso e tonda n'amour
Na chambre à coucher, salle de bain salon mpé na cuisine

chorus

C'est ça aaah, Rosie
Ngeli-ngeli aza ngeli iiih

verse

Yaweh eeh, Yaweh eeh, Yaweh eeh palado
Lakisa ngayi muana nzela nini na landa eeh
Na yeba ko tiya libonza o pesi nga, à l'abri
Na yeba ko sala bonheur na yé, nuit et jour
Na yeba ko kima ba jaloux na ba médisants

chorus

Ba mbanda zéro oooh
Yéh, yéh ba mbanda moins cent

verse

Eh ima-ah-ima a ima Tabu Fatou eeh
Bikelamu oy'a rêve, to monaka na ba bouquins
Na ba cartes postales, na ba prospectus ya tourisme
Oyo elikia ezalaka té, to kutana un jour
O ya ko mona yé na miso, en chair et en os
A tala yo face à face pe a yebisa yo, je t'aime
Bo zala n'esika na nga aaah
Bo mi tia n'esika na nga ko ooh

bridge

Eh muan'ango aza aah comme ça aaah
Rosie Airways d'amour
A kumba nga déjà loin
Ngeli-ngeli, aza ngeli
Bo zala n'esika na nga aaah
Bo mi tia n'esika na nga ko ooh

outro

Eh muan'ango aza aah comme ça aaah
Rosie Airways d'amour
A kumba nga déjà loin
Ngeli-ngeli, aza ngel
Writer(s): Koffi Olomide

Contribute

To-do

Performers Tag
Identify who's singing what

Completed

Lyrics
Verified by Curator
Structure Tag
Identify the song's sections

Credits

Show all credits

Contributions

Last edit about 2 months ago
Show 14 contributors
Are you an artist? Distribute your lyrics!
Take full control of your lyrics. Curate, sync, and distribute your lyrics on Spotify, Apple Music, and more.
Explore Musixmatch Pro