Are you an artist? Make the most of your lyrics with Musixmatch Pro!
Add translation
Share
These Lyrics are yet to be verified
7 contributions
almost 9 years ago
Translations

Lyrics of Faute Ya Visa by Madilu System

Ka kufa ezali ko lala.
Ko lala pe, ezali liwa te.
Celui qui boude, il n′a que a bouder.
Eza nga. Ye mei.
Sa Mageste, La Grrande balene et son royaume.
Mapata ngambo na ngambo
Mpimbo ezingi biso malili oh.
Lelo na butu na loti yo na maboko ya moto, mere oh.
Yeba nkoyi abomaka po na ko leisa bana naye.
Moto abomaka po na plaisir eh en.
Bitumba toko swana na mbanda,
Ezalaka problem ya 2em republique.
Ngai ko epayi oh oto ya maladi oh.
Yo na maboko na nga moselu.
Pongi moke, yo wana na ba ndoto na nga.
Lelo naza na mayi ya miso te.
Na bombi mokolo nako lela ya nga maman Mandengi.
Au mere, tika ko lelisa nga oh. Yo mwela.
Bolingo eko mata lokola nfulu ya masanga na ba nganda.
Epayi ya bameli likaya eto tepa na kati ya milinga
Ndoto ya baba eh.
Nani ako limbolela ngai.
Esika ya bosoto sima ba kombolako.
Omesana ko beta ngai na chambre.
Omesana ko benga ngai litabe
Lelo obeta nga na miso ya bana.
Obenga nga na kombo ya mbanda.
Lobi soki na tengami est-ce que oko pesa nga faute
Nako timola libulu mikolo na mikolo,
Ba tango na ba tango.
Po na koma mosika ozali oza oh.
Ba lobi kaba na loboko ya mobali ya mwasi amona te.
Boni yo oko tambola lokola mayi ya mike etalaka sima te.
Keba ako suka na ebale na ocean.
(Oko zinda di)
Oh mere tala bango ba lingi ko zua yo na se ya kwiti.
Yaka ko buta escalier otonga na motema mwa nga.
Jollie tala bango ba lingi ko pepa mayi ya ebale na mokolo moko.
(Okoya ko zinda pamba di.)
Omoni be jeu yango ekomi ya solo.
Mputu boma mwinda.
Cafe olambeli nga na kati ya butu osopi nde sukali.
Opanzi feti na kati eh
Bilengi bisilaki te oh mama.
Nyokola nga nzoto kasi motema te oh oh.
Ba kufa ba kende ba sekwa te oh.
Nabo na bela.
(Na boyi omema ngambo)
Marie kwanga yaka oh.
Dilo, mobali oyo moselu.
Sekele na ngai ya bomwana eza nde na sac a main na yo.
Komela bango ba tanga oh.
Rose na nga Mputu, yaya na Popo,
Na lembi na nga ko bunda.
Bolingo eleki naye makasi, Odile.
Bolingo aleki naye makasi, Luyeye.
Mimi Ilumbe bokeseni ya mpongi na liwa.
Ezali se pema
Maman Edite Bongo, la premiere dame du Gabon
Maman Germene Poto
Esperant de Geneve
Ba oyo yo oko landa,
Bango nde ba ancien de sayo.
Ba sala kala eh.
Ye oyo caracass yo oko landa,
Keba akoya ko bebisela yo palmaresse.
Desole oh oh.
Mbanda nga na ye na Bruxelles
Alobi tokokani eh.
Faute naye te. Faute ya visa.
Faute ya mondele.
Mbanda nga naye na Paris eh.
Alobi to kokani eh.
Faute naye te faute ya visa.
Na ndimi ba benga nga etula.
Kasi ndumba, te oh
Salite etongi nga na nzota
Savon eko longola yango di eh
Yooooooooo
Yaka ko buta escalier
Otonga na motema na nga.
Ko luka nga i na bitumba te
Po nazalaka na ngai makasi te.
Nabo obeta nga.
Na banga na nga makambo
Instrumental
Nako timola libulu mokolo na mokolo
Ba tango na ba tango
Pona koma mosika ozali mosika oza oh.
Ba lobi kaba na loboko ya mobali ya mwasi amona te oh.
Boni oko tambola lokola mayi ya Kalamu
Etalaka sima te.
Keba oko suka na ebale na mer rouge oh.
Mbanda nga naye na Swiss, alobi to kokani eh.
Faute naye te eh, faute ya visa.
Mbanda nga naye na Londre oh.
Nyoso faute ya visa.
Writer(s): Madilu System

Contribute

To-do

Structure Tag
Identify the song's sections

Completed

Lyrics
Lyrics in time with music
Performers Tag
Identify who's singing what

Credits

Show all credits

Contributions

Last edit almost 9 years ago
Are you an artist? Distribute your lyrics!
Take full control of your lyrics. Curate, sync, and distribute your lyrics on Spotify, Apple Music, and more.
Explore Musixmatch Pro