Are you an artist? Make the most of your lyrics with Musixmatch Pro!
Add translation
Share
Verified by Curator
8 contributions
about 2 years ago
Translations
French

Lyrics of Maranatha by Mike Kalambay

Nabanga yo Yesu na nga
Na tia na misala maloba na yo
Kala mingi te Maranatha
Nga nakozala wapi?
Nabanga yo Yesu na nga
Na tia na misala maloba na yo
Po kala mingi te oza kozonga
Nga nakozala wapi?
Kobanga Nzambe ebandeli ya mayele
Tina nina na wela bomengo ya se na moyi
Bongo nabungisa molimo bomoyi na ngai
Motema na ngai banga Nzambe
Wana kelelo ekoyula Mokonzi atelemi na mapata
Kokamata basantu balingami na ye
Po bakota lola na noces de l′Agneau
Nga nakozala wapi?
Na ngambo ya mobali to pe na oyo ya muasi?
Na sein d'Abraham to pe na???
Koyemba Hosanna to pe kati ya milelo
Nga nakozala wapi?
Nabanga yo Yesu na nga
Na tia na misala maloba na yo
Po kala mingi te Maranatha
Nakozala wapi?
Nabanga yo Yesu na nga
Na tia na misala maloba na yo
Papa kala mingi te oza kozonga
Nga nakozala wapi?
Namona moto azobanga ekobo akanisi abangi Nzambe
Nzoka azobanga na ye nde sida
Sida bokono ya pamba ebomaka kaka nzoto
Bongo oyo ebomaka nzoto na molimo to tie wapi?
Bikela coutume na ba familles na ba Kristu batosaka
Kasi liloba na Nzambe to fouler aux pieds
Yesu na mitema azalaka lisusu te
Lelo ye wana na ekuke ya motema na yo azobeta
Naza mpunda ya pamba namemi yo Mokonzi
Ata ko maputa batandi nga nde nazoniata
Papa lokumu eza elamba na taille na yo moko
Yo okabola yango na nani Yahwe?
Nayebi en terme de gloire olingaka kaka 100%
98% te, 99 pe te
Papa lokumu eza elamba na taille na yo moko
Motema na ngai yeba yango
Wana kelelo ekobeta Mobali atelemi na mapata Kokamata eklezia muasi na ye
Po akota lola bipayi azali
Nga nakozala wapi?
Mosantu na lingi yo
Ngai naponi kotambola na yo
Ata liwa ememi nga lelo oyo
Elikya ezali nakomona yo eh
Yesu eeh Yesu
Nkolo na nga nandimi kotambola na yo
Yesu ehh Yesu
Yaya na nga mbamba na yo kino okoya
Yesu ehh Yesu
Nkolo na nga nandimi kotambola na yo
CH: Yesu ehh Yesu
L: Papa posa na ngai ezali namona yo face à face
CH: Yesu ehh Yesu
L: Wana yo na loboko ya mobali Papa ngai na makolo na yo
CH: Yesu ehh Yesu
L: Papa, nzela eza molayi nzela eza molayi, nga moko nakokoka te
CH: Yesu ehh Yesu
L: Nkolo sunga nga nabatela bonzambe oyo otie kati na nga Yesu
CH: Yesu ehh Yesu
L: Papa simba nga loboko Yesu totambola elongo nakota na mboka na elaka
CH: Yesu ehh Yesu
L: Yesu, Yesu
Makanisi se kobanza
Elaka na yo Maranatha
Miso na nga likolo
Na elikya yo okozonga
Mosantu na banga te
Nasimbi se elikya
Nayebi y′oza na nzela
Po yo omema nga epayi ya Papa
CH: Yesu ehh Yesu
L: Yesu na ngai, Yesu na ngai, Yesu
CH: Yesu ehh Yesu
L: Nakota loge te, nazangisa yo sima...
CH: Yesu ehh Yesu
L: Yesu, pawuni na nga ya talo, Yesu na ngai
Mosantu na lingi yo
Ngai naponi kotambola na yo
Ata liwa ememi nga lelo oyo
Elikya ezali nakomona yo eh
Writer(s): Mike Kalambay

Contribute

To-do

Structure Tag
Identify the song's sections

Completed

Lyrics
Verified by Curator
Performers Tag
Identify who's singing what

Contributions

Last edit about 2 years ago
Are you an artist? Distribute your lyrics!
Take full control of your lyrics. Curate, sync, and distribute your lyrics on Spotify, Apple Music, and more.
Explore Musixmatch Pro