Na beleli yo, kita nkolo o simba ngai
Po moto o simbi eh, vraiment a batelami
Nguya na yo, ezali nguya ya solo
Molimo na yo, aza molimo na nguyaaaaaa,
Na beleli yo, kita nkolo o simba ngai
Po moto o simbi eh, vraiment a batelami
Nguya na yo, ezali nguya ya solo
Molimo na yo, aza molimo na nguyaaaaaa,
Sala motema na ngai ekomi ko banga
Sala bomoyi na ngai ekomi na suka
Tala banguna na ngai bakomi ko tshola ngai eh
Sala motema na ngai ekomi ko lenga
Sala bomoyi na ngai ekomi na suka
Tala banguna na ngai bakomi ko tshola ngai eh
Na lilita ya lazalo, elombe mobali o telemi
O sekuosi lazalo, otunaki ata posa na ye te
Na nguya ya lisekua po yesu yo moko lisekua,
Na lilita ya lazalo, elombe mobali o telemi
O sekuosi lazalo, otunaki ata posa na ye te
Na nguya ya lisekua po yesu yo moko lisekua,
Bomba ngai eh, YHWH batela ngai
Po ngai muana na yo na pengua te
Na masenginia ya mokili oyo
Na masumu eh, na se na moyi
Na sengi o lona ngai, pembeni ya mayi ya bomoyi
Po na banga eloko te, po na lenga pe te.
Sala motema e lenda na pasi na esengo na talela se yo
Molimo ya kolela kozanga,
Bisenga senga lokola ba pagano ngai na boyi eh.
Mokili to yaka papa etonda waleoh
Ah, baninga bazuaka bomengo ngai wa yo délaissé.
Ah yaya, yaya yaya eh, yaya sembola loboko
Tala ba ndoki ya quartier
Nkolo yoka kolela na ngai
Baninga to kola na bango, babonga ba koma na mbongo
Yaya eh yaya, yo elonga na nga oh
Ah ngai na taleli yo yo moto obengaki ngai
Wuta libumu ya mama na ngai
Molimo na ngai sepela, oza na nzambe ya solo